Salmi 67

Ti lodino i popoli

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. 2Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye ; 3mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.

4Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo ! 5Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele. 6Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !

7Mabele eboti bambuma na yango ; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso. 8Tika ete Nzambe apambola biso ; tika ete mokili mobimba etosa Ye !

Copiato!
Aa