Salmi 15
Chi abiterà sul tuo santo monte
Nzembo ya Davidi. Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule ? Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule ? 2Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ; 3oyo akoselaka moninga makambo te, asalaka ye mabe te, mpe ayokisaka ye pasi te ; 4asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te ; 5asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.
Copiato!
Aa