Psalms 93

The Lord reigns, robed in majesty

Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te. 2Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ; seko na seko, ozali. 3Yawe, bibale egangaka ! Bibale etombolaka lokito na yango ; bibale etombolaka makelele na yango.

4Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo ; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene. 5Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

Copied!
Aa