Psalms 150
Let everything that has breath praise the Lord
Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi ! 2Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye ! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo ! 3Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !
4Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina ! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite ! 5Bokumisa Ye na lokito ya manzanza ! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene ! 6Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !
Copied!
Aa