시편 133

형제가 연합하여 동거함이 어찌 그리 선하고 아름다운고

Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko ! 2Ezali lokola malasi ya motuya oyo basopi na moto, bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron, ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye. 3Ezali lokola mamwe ya Erimoni, oyo ekitaka na bangomba ya Siona. Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye, mpe bomoi, mpo na libela.

복사됨!
Aa